John 8

Mwasi ya ndumba oyo bakangaki na ekobo

1Kasi Yesu akendaki na ngomba ya banzete ya Olive ; 2Na tongo-tongo, Yesu azongaki lisusu na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe bato nyonso bayaki kozinga ye ; avandaki mpe abandaki koteya bango.

3Balakisi ya Mibeko mpe Bafarizeo bamemelaki ye mwasi moko oyo bakangaki na tango azalaki kosala ekobo, mpe batiaki ye liboso ya bato nyonso.

4Bongo balobaki na Yesu :

—Moteyi, bakangaki mwasi oyo na tango azalaki kosala ekobo.
5Nzokande, kati na Mibeko, Moyize atindaki biso ete toboma mwasi ya ndenge oyo na mabanga ! Bongo yo, olobi nini ?

6Batunaki ye motuna wana na kotiela ye motambo, mpo bazwa likambo ya kofundela ye.

Kasi Yesu agunzamaki mpe abandaki kokoma na mabele na mosapi na ye.
7Lokola bazalaki kaka kotuna-tuna ye, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango :

—Oyo kati na bino azangi lisumu, abamba ye libanga moto ya liboso.
8Bongo Yesu agunzamaki lisusu, mpe azongelaki kokoma na mabele. 9Tango bayokaki bongo, bango nyonso babandaki kokende moko-moko, kobanda na mikolo. Bongo Yesu atikalaki kaka ye moko elongo na mwasi liboso na ye. 10Bongo Yesu atombolaki motu mpe alobaki na ye :

—Mwasi, bato oyo bayaki kofunda yo bazali wapi ? Moto ata moko te akateli yo etumbu ?

11Ye azongisaki :

—Tata, ata moto moko te !

Bongo Yesu alobaki :

—Ngai mpe nakokatela yo etumbu te. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu te
7.53–8.11 Mikanda mingi ya kala ezangi ba-versets oyo.
 !]

Yesu azali moi ya mokili

12Yesu alobaki lisusu na bato :

—Ngai nazali moi ya mokili. Oyo akolanda ngai akotambola na molili te, kasi akozwa moi na bomoi.

13Bafarizeo balobaki na ye :

—Ozali komilobela yo moko ; litatoli na yo ezali na tina te.

14Kasi Yesu azongiselaki bango :

—Litatoli na ngai ezali na tina ata soki nazali koloba mpo na ngai moko. Pamba te, nayebi epai nawuta mpe epai nazali kokende. Kasi bino boyebi te epai nawuta mpe epai nazali kokende.
15Bino bosambisaka na ndenge ya bomoto, kasi ngai nasambisaka moto te. 16Mpe soki nasambisi moto, kosambisa na ngai ekozala ya sembo, pamba te nazali ngai moko te, kasi elongo na Tata ye oyo atinda ngai. 17Ekomama mpe kati na mibeko na bino : litatoli ya bato mibale ezali ya solo. 18Natatolaka mpo na ngai moko ; mpe Tata oyo atindaki ngai atatolaka mpe mpo na ngai.

19Bongo batunaki ye :

—Tata na yo azali wapi ?

Yesu azongisaki :

—Bino boyebi ngai te mpe boyebi Tata na ngai te. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki mpe koyeba Tata na ngai !

20Yesu alobaki makambo wana tango azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, pene-pene na esika oyo bazalaki kotiela makabo. Mpe moto ata moko te akangaki ye, pamba te tango na ye ekokaki naino te.

Yesu azali nani ?

21Yesu alobaki na bango lisusu :

—Nazali kokende mpe bokoluka ngai ; bokokufa na masumu na bino ; mpe bokokoka te koya epai ngai nazali kokende.

22Bongo Bayuda bazalaki kotunana bango na bango :

—Boni, akomiboma ? Yango wana alobi : “Bokokoka te koya epai ngai nazali kokende ?”

23Kasi alobaki na bango lisusu :

—Bino bowuti na nse ; kasi ngai nawuti na Likolo. Bino bozali bato ya mokili oyo kasi ngai nazali moto ya mokili oyo te.
24Yango wana nalobaki na bino : “Bokokufa na masumu na bino.” Pamba te, soki bondimi te ete “Ngai nazali”, bokokufa na masumu na bino.

25Bango batunaki ye :

—Bongo yo ozali nani ?

Yesu azongiselaki bango :

—Oyo nalobaka na bino tango nyonso wuta na ebandeli.
26Nazali na makambo mingi ya koloba mpo na bino mpe ya kosambisela bino ; kasi moto oyo atinda ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na ye, yango nde nazali koyebisa na mokili.

27Kasi basosolaki te ete Yesu azalaki kolobela bango mpo na Tata.

28Bongo Yesu alobaki :

—Tango bokotombola Mwana na moto, na tango wana nde bokososola ete “Ngai nazali” mpe nasalaka eloko moko te na kombo na ngai moko, kasi nalobaka kaka makambo oyo Tata alakisaki ngai.
29Moto oyo atinda ngai azali elongo na ngai ; atika ngai, ngai moko te pamba te nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka ye !

30Awa Yesu alobaki bongo, bato mingi bandimelaki ye.

Bonsomi ya solo

31Bongo Yesu alobaki na bayuda oyo bandimelaki ye :

—Soki bokangami na mateya na ngai, bokozala penza bayekoli na ngai.
32Bokoyeba solo mpe solo ekokangola bino.

33Bazongiselaki ye :

—Biso tozali bato ya libota ya Abraham, mpe mbala ata moko te tokoma bawumbu ya moto. Bongo ndenge nini olobi na biso ete : “Bokokoma bato ya bonsomi ?”

34Yesu azongiselaki bango :

—Ya solo penza nalobi na bino : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya masumu.
35Nzokande mowumbu azali na esika ya libela na libela te kati na libota ; kasi mwana azali na yango mpo na libela na libela.

36Soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bato ya bonsomi. 37Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abraham ; kasi bozali koluka koboma ngai mpo Liloba na ngai ezali na esika te kati na bino. 38Nalobaka makambo oyo namonaki epai ya Tata na ngai ; bino bosalaka makambo oyo boyokaka epai ya tata na bino.

39Bango bazongisaki :

—Tata na biso ezali Abraham !

Kasi Yesu alobaki na bango :

—Soki bozalaki bana ya Abraham, mbele bolingaki kosala misala oyo Abraham asalaki.
40Kasi sikʼoyo bozali koluka koboma ngai, ngai moto oyo nazali koyebisa bino solo oyo nayokaki epai ya nzambe. Nzokande Abraham asalaki yango te. 41Bino, bosalaka misala ya tata na bino.

Bango bazongisaki :

—Biso tozali bana ya makangu te ; tozali kaka na Tata moko : Nzambe !

42Bongo Yesu alobaki na bango :

—Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbele bozali kolinga ngai. Pamba te, nawuti epai ya Nzambe mpe sikʼoyo nazali awa. Mpe naye na kombo na ngai moko te, kasi ye moto atindaki ngai.
43Mpo na nini bozali kososola te tina ya maloba oyo nazali koloba ? Pamba te bokoki te koyoka makambo oyo nazali koloba.

44Tata na bino, ezali Zabolo ; mpe bolingi kosala makambo oyo tata na bino alingaka. Ye azali mobomi banda na ebandeli ; awumelaki kati na solo te, pamba te solo ezali kati na ye te. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye pamba te azali moto ya lokuta, mpe tata ya lokuta. 45Kasi ngai lokola nazali koloba solo, yango wana bozali kondimela ngai te. 46Nani kati na bino akoki kolakisa ngai lisumu oyo nasala ? Soki nalobaka makambo ya solo, bongo mpo na nini bondimelaka ngai te ? 47Oyo azali ya Nzambe ayokaka oyo Nzambe alobaka. Kasi bino, soki boyokaka te, ezali mpo bozali na Nzambe te.

48Bayuda bazongiselaki ye :

—Omoni, yango wana tolobaki ete ozali moto ya Samariya mpe ozali na molimo mabe.

49Yesu alobaki na bango :

—Nazali na molimo mabe te, kasi nazali kopesa Tata na ngai lokumu mpe bino bozali kotiola ngai.
50Nalukaka lokumu na ngai moko te, kasi moto moko azali, oyo alukaka yango, mpe ye moto asambisaka.

51Ya solo penza nalobi na bino : soki moto abateli maloba na ngai, akokufa soki moke te !

Yesu mpe Abraham

52Bongo Bayuda balobaki na ye :

—Sikʼoyo tomoni polele ete ozali na molimo mabe ! Pamba te, Abraham mpe baprofeta basiʼbakufa ; bongo yo olobi ete moto oyo akobatela maloba na yo akokufa soki moke te !
53Boni, yo okanisi ete oleki Tata na biso Abraham oyo akufa ? To mpe oleki baprofeta nyonso oyo bakufa ?

Yango yo, ozali komimona nani ?

54Yesu azongiselaki bango :

—Soki nazali komipesa lokumu ngai moko, lokumu na ngai ezali na tina te. Kasi ezali Tata na ngai moto azali kopesa ngai lokumu ; Ye oyo bino bolobaka ete azali Nzambe na bino.
55Mpe boyebi ye te, kasi ngai nayebi ye. Soki nalobi ete nayebi ye te, wana nalingaki kozala moto ya lokuta lokola bino. Kasi nayebi ye, mpe nabatelaka Liloba na ye. 56Tata na bino Abraham atondaki na esengo mingi awa akanisaki ete akomona mokolo na ngai ; amonaki yango, mpe atondaki na esengo. 57Bayuda balobaki na ye :

—Nini ? Yo moto okokisi naino ata bambula ntuku mitano te, bongo ozali koloba ete omonaki Abraham !

58Yesu azongiselaki bango :

—Ya solo penza nalobi na bino : “liboso ete Abraham abotama, ngai nazali !”

59Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba ye. Kasi Yesu abombamaki, mpe abimaki na lopango ya Ndako ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB